
Mission ya inspection oyo esalemaki mardi 14 avril 2026, na Kisangani na président intérimaire ya conseil d’administration ya FRIVAO, Dismas Kitenge Senga, emonisaki débourse ya pene na 250.000 $US mpo na acquisition ya parcelle ya mabele oyo ekanamaki mpo na kotonga lopitalo na Cité Paradis, montant oyo etalelami lokola polémique.
Na botali boye, mokambi ya intérimaire ya conseil d’administration atalaki mikanda ya mosolo oyo ezali koyebisa na bozindo débourse oyo mpo na bozwami ya parcelle oyo ekanisami ete ezali na ba lots soki zomi oyo ezali na moto te, kolanda ba sources oyo ezali pene na likambo yango.
Ba sources wana kaka elobeli mpe commission oyo ekanisami na pene na 19 millions ya ba dollars ya Etats-Unis na oyo etali transaction oyo, oyo ematisaki ba soupçons ya ba irregularités mpe possible surfacturation zinga zinga ya projet. Na kotalaka sango eye, mosali yango asakoli botiami ya rapport na autorité ya bokengeli mpe na ba organismes ya FRIVAO. Asengi mpe bolukiluki mpo na kotiya mokumba na likambo liye.
Projet lopitalo, oyo ezali na tina ya kobongisa accès ya soins de santé pona population ya Kisangani, ezali na kati ya contexte ya monene ya gestion ya fonds ya FRIVAO ya motuya, oyo epesameli pona ko financer ba initiatives sociales oyo ekopesa litomba na ba victimes. Ntango bazali kozela ba actions administratives to juridiques oyo ekoki kosalema, likambo yango ezali kokoba kobimisa ba réactions na kati ya public local.
Abdoul Ulafia/Tshopo
Actu30 / MCP, mediacongo.net na nzela ya IMCongo.com