Imcongo - IMCongo: l'immobilier en toute sécurité - vente, achat, location
imcongo

Projet Rocades : commission d'expropriation e sensibiliser les riverains de Lutendele

02/04/2026

Georges Koshji, président ya Commission interministerial en charge ya expropriations ya ba victimes ya route Rocades, samedi 22 novembre 2025, na tour ya inspection, na Kinshasa. Fɔtɔ́/Cellcom ACGT.

Commission ya gouvernement en charge ya expropriation e sensibiliser, samedi le 28 mars na Kinshasa, batu ba affectés na projet ya bypass Sud-Ouest, na axe Lutendele - Terminus Mbudi, na commune ya Mont-Ngafula.

Initiative oyo ezali na tina ya kosangisa ba communautés locales pe kosangisa bango na makambo oyo etali expropriation pona cause ya utilité publique, pona kokokisa projet stratégique oyo ya nzela.

Bokutani boye bosangisaki ba experts ndenge na ndenge ya ba structures mpe ba services oyo etali, mpe lisusu ba membres ya Commission interministerial oyo ezali na charge ya matérielisation ya projet.

Mokano monene ezalaki ya kopesa bososoli ya bisika oyo ezwaki mpasi pe kolimbola ndenge ya kofuta indemnification.

Au cours de cette session, les riverains de Lutendele na Mbudi ont ba lakisaki posa na bango ya komona l’Etat a respecter ba engagements na ye, surtout en ce qui concerne le paiement des indemnisations, qu'ils souhaient voir traité de manière amiable.

Likita oyo epesaki nzela na baye basanganaki mpo na kosala mitungisi na bango mpe kotuna mituna, ko favoriser dialogue constructif, essentiel mpo na ko garantir transparence ya processus mpe ko renforcer confiance entre bakonzi mpe bana mboka.

Il y a trois semaines, Commission interministerial en charge ya expropriation na cadre ya Projet Rocades esi ebandaki campagne ya sensibilisation na ba habitants ya avenue Ndjoku, na municipalité ya Kimbanseke.

 

Radio Okapi / MCP, mediacongo.net na nzela ya IMCongo.com