
Lundi 28 avril 2025, gouvernement provincial ya Kinshasa ebandi opération ya kobuka ba immeubles illégales na gare ya train Kintambo, na tina ya ko liberer espace public mpe kobundisa parking illégal.
Etando eye, ya Bureau national ya transport (ONATRA), ezali sikawa kobongisama lisusu mpo na koyamba ba arrêts officiels mpo na ba taxi, ba moto, mpe ba bus oyo ezali kotambola zinga zinga ya rond-point ya Magasin.
Esengeli kokundola ete gouvernement provincial esakolaki le 22 avril mokano na yango ya kobuka bandako nionso oyo etongamaki na mibeko te oyo etongami na esika ya baie ya Ngaliema na ngonga tuku minei na mwambe. Nzokande, ekamwisi bato banso, ba démolitions ya liboso emonanaki na Kintambo.
Kolanda bakonzi, misala miye mizali na kati ya bosaleli mokemoke ya manaka mpo na kopetola mpe kobundisa bozwami ya mabele ya leta na ndenge ya mabe.
Na suka, Gare Kintambo esengeli pe epesa maboko na bozongisi ya transport ferroviaire na Kinshasa.
Mena Lutete Naomie na mboka
congo-press.com (MCP) / mediacongo.net, na nzela ya IMCongo.net